Monday 2 May 2011

BUKU YA BATOLI


“Kozwa mayele ezali eloko ya tina koleka. Koboya té kopesa bomengo nay o nyonso mpo ókóma moto ya makanisi ya malamu. Linga mayele mingi, mpe okokóma moto monene; kangama na yango, mpe okozwa lokumu. Yango ekozala epai na yo lokola pauni ya kitoko, lokola ekoti ya bokonzi”. (Buku ya batoli 4:7-9).
Mokanda ya liboso
Tina ya mokanda oyo

1. Batoli ya Salomon, mwana ya David, mokonzi ya Israel.
2. Batoli oyo esalisaka moto mpo ázwa mayele mpe makanisi ya malamu, áyeba ntina ya maloba ya bakolo;
3. eteyaka moto mpo ákóma moto ya solo, ya bosembo mpe ya bizaleli ya malamu. 4. Yango efungolaka mitú ya bato oyo bayebi makambo té, mpe eteyaka bilenge ndenge ya kokanisa.
5-6 Ezala bato ya mayele to bato oyo beyekolá, ebongi báyoka yango, báfungola miso, mpo báyeba ntina ya batoli mpe masapo oyo eutá na bato ya mayele, bongo bákoka komona ndenge basengeli kosala.
7. Kotosa Yawe ezali ebandeli ya kozwa mayele. Bobele bazoba bato baboyaka mateya mpe maloba ya bato ya mayele…
20. Mayele ekokani na moto azali kobelela na babalabala, azali kosakola na bisika bato basanganaka.
21. Azali kobelela na bisika bato bazali mingi, na kati ya mboka [vile], na baporte yam bola [vile], azali kopesa mateya boye;
22. Tii mokolo nini bino bazoba, bokotikala kaka na bozoba? Tii mokolo nini baoyo basekaka ngai Mayele bakozala kaka koseka? Bino bato bozangá mayele, tii tango nini bakotika koboya kozwa mayele?
23. Bóyoka ndenge nazali kokebisa bino; boye nakotondisa bino na mayele mpe nakopesa bino batoli…
(Ekolanda na mikolo ekoya… Botanga malamu!!!)



 
Proverbs 1
Purpose and Theme
1 The proverbs of Solomon son of David, king of Israel:

2 for gaining wisdom and instruction;
for understanding words of insight;

3 for receiving instruction in prudent behavior,
doing what is right and just and fair;
4 for giving prudence to those who are simple,[a]
knowledge and discretion to the young—
5 let the wise listen and add to their learning,
and let the discerning get guidance—
6 for understanding proverbs and parables,
the sayings and riddles of the wise.[b]
7 The fear of the LORD is the beginning of knowledge,
but fools[c] despise wisdom and instruction…

20 Out in the open wisdom calls aloud,
she raises her voice in the public square;
21 on top of the wall[d] she cries out,
at the city gate she makes her speech:
22 “How long will you who are simple love your simple ways?
How long will mockers delight in mockery
and fools hate knowledge?
23 Repent at my rebuke!
Then I will pour out my thoughts to you, I will make known to you my teachings...
New vocabulary

toli: advice, instruction; teaching; proverb (plural: batoli)
kosalisa: to help
moto: person
mayele: intelligence, understanding
(ko)yeba: to know; to realise
(ko)teya: to teach; to advise
(ko)fungola: to open
bilenge: youth, young people
ndenge: way; approach
(ko)kanisa: to think; to strategise
 
 
 
Please note that we have recently published an ebook entitled, “Lingala in 10 Lessons”. You can purchase it from Amazon marketplace by clicking on
http://www.amazon.co.uk/10-Lingala-Lessons-basic-course/dp/1492175838/ref=sr_1_fkmr1_1?ie=UTF8&qid=1391029929&sr=8-1-fkmr1&keywords=e-book+Lingala+in+10+lessons


 

No comments:

Post a Comment